Psalms 94

Yawe, bato ya mabe bakokoba kolonga kino tango nini ?


1 Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe,
Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe,
omimonisa.

2 Telema, yo Zuzi ya mokili ;
zongisela bato ya lolendo
oyo basengeli kozwa.

3 Kino tango nini bato ya mabe, Yawe,
kino tango nini bato ya mabe bakosepela ?

4 Bazali kopanza maloba ya lofundu ;
bato nyonso oyo basalaka mabe batondi na lolendo.

5 Bazali konyata bato na yo, Yawe ;
bazali konyokola libula na yo.

6 Bazali koboma mwasi oyo akufela mobali mpe moleki nzela ;
bazali koboma mpe bana oyo bazanga baboti.

7 Bazali koloba : “Yawe azali komona te ;
Nzambe ya Zakobi azali kolanda yango te.”

8 Bokeba ; bino bato bozangi mayele kati na bato ;
Bino bazoba
bokokoma na bwanya tango nini ?

9 Boni, ye oyo atiaki litoyi, azali koyoka te ?
Ye oyo asalaki liso, azali komona te ?

10 Ye oyo apesaka bitumbu na bikolo,
akopesa etumbu te ?
Ye oyo ateyaka moto oyo azangi boyebi ?

11 Yawe ayebi makanisi ya moto ;
ayebi ete makanisi yango ezali na tina te.

12 Mapamboli na moto oyo yo opesi etumbu, Yawe ;
moto oyo oteyi na Mibeko na yo,

13 opesaka ye lisungi na mikolo ya minyoko,
kino bakosilisa kotimola libulu
mpo na bato ya mabe.

14 Pamba te Yawe abwakaka bato na ye te,
akobosana ata moke te libula na ye.

15 Kosambisama ekofanda lisusu likolo ya bosembo ;
mpe baoyo nyonso bazali na mitema alima
bakolanda yango.

16 Nani akotelema mpo na ngai liboso ya bato ya mabe ?
Nani akokotela ngai liboso ya bato
oyo basalaka mabe ?

17 Soki Yawe apesaki ngai lisalisi te
mbele noki nalingaki kovanda nyee na liwa

18 Tango nalobaki : “Nalingi kokweya,”
bolingo na yo, e e yawe esimbaki ngai.

19 Tango motungisi ezalaki monene kati na ngai,
libondisi na yo emamaki esengo na molimo na ngai.

20 Boni, bokonzi ya mabe, ekota kozala na boyokani na yo,
oyo ete ezali komona bapasi na nzela ya bikateli na yango ?

21 Bazali kosangana mpo na kobundisa
bato ya sembo ;
mpe kokatela moto oyo asali likambo te liwa,

22 Kasi yawe akoma ndako na ngai ya makasi ;
mpe Nzambe na ngai,
libanga epai nakendaka kobombama.

23 Ye akozongisela bango mpo na masumu na bango ;
mpe akobebisa bango mpo na mabe na bango ;
Yawe Nzambe na biso akobebisa bango.
Copyright information for LinMNB